Associé

Fally Ipupa

Compositor: Não Disponível

Associé na ngai, tala ndenge monoko eboyi lokuta e refoulé epayi ya miso, Miso pe lokola ye alobaka te, atangisi be mayi
Moyibi mobimba akoteli ngai na midi, ayibi kaka mbeto nasala nini?
Bolingo ezali lokola lisano ya Nintendo
E pratiquamaka se epayi nionso prise ezali

Mais yo sali nini, oyibi nga mbeto?
Y'obosani canapé, tapis pe ezali
Mais oyibi outillage, obosani artisan
Artisan nde chéri na ngai, Tcha-tcho Mbala

Chéri na ngai y'olobaka na ngai
Bolingo ya nga na yo, ata liwa e ko kabola te
Pourquoi yo bongoli motema, likolo ya likambo moke Papa?
On dirait okananga uta kala, Tcha-tcho Mbala
On dirait okangela nga kanda na motema

Tcha-tcho na kanisaki bolingo yango ezalaki ya solo... Nzoka okosaka 'no ngai
Mbala na kanisaki bolingo yango ezalaki ya solo
Tcha-tcho o profiter na faiblesse, po moyibi akoteli nga na ndako... Na midi
Nga nasali bozoba portable erreur chiffre moko e sonner epayi ya... Moto mususu
Mama aaa

Une faute avouée est à moitié pardonnée
Tchatcho pardon zonga
Na ndimi faute eza ya nga
Mbala pardon o zongela ngai
Na ndimi faute eza ya ngai
Na tikaki ndako polele
Po tozalaki kaka midi
Na lingaki na aerer ndako
Moyibi ya bolingo akoti
Limbisa nayo ngai, pardon chéri

©2003- 2024 lyrics.com.br · Aviso Legal · Política de Privacidade · Fale Conosco desenvolvido por Studio Sol Comunicação Digital